Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !
Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki : — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ?
Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !
Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › »
Kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki na koloba na ye : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi, » ye nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete.