Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye : — Pesa biso mayi ya komela ! Moyize azongiselaki bango : — Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ?
Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.
Boni, Yawe amemi biso na mokili oyo kaka mpo ete tokufa na mopanga ? Boye basi mpe bana na biso bakokoma kaka bomengo ya bitumba. Ekozala malamu te mpo na biso ete tozonga na biso na Ejipito ? »