Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 20:28 - Mokanda na Bomoi

28 Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 20:28
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe Davidi apesaki mitindo epai ya bakambi nyonso ya Isalaele ete basunga mwana na ye Salomo.


Biteni yango ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali lokola mobeko ya libela na libela. Pamba te ezali makabo ya bana ya Isalaele mpo na Yawe, makabo oyo ekowuta na mbeka na bango ya boyokani.


Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.


Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye.


Longola Aron bilamba na ye mpe latisa yango Eleazari, mwana na ye ya mobali, pamba te Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, akokufa kuna. »


Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki : bamataki likolo ya ngomba Ori na miso ya lisanga mobimba.


Sima na yo komona yango, yo mpe okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi ndenge moko na Aron, ndeko na yo ya mobali,


Kolongwa na Ashimona, bakendeki kotonga molako na bango na Moseroti.


Bana ya Isalaele batambolaki wuta na mabulu ya mayi ya Bene-Yaakani kino na Mosera. Aron akufaki kuna mpe bakundaki ye. Mpe Eleazari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye lokola Nganga-Nzambe.


Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.


Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.


Nzokande, nakosala makasi mpo ete bozalaka tango nyonso na makoki ya kokanisaka yango, ezala nasila na ngai kokende.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ