Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba ;
Bana ya Isalaele batikaki ngomba Ori mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela ya ebale monene ya Barozo, mpo na kokima mokili ya Edomi. Kasi bato bakokaki lisusu te kokanga motema na nzela.