24 « Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, pamba te akokota te na mokili oyo napesi bana ya Isalaele, mpo ete bino mibale botombokelaki mitindo na Ngai na mayi ya Meriba.
Sima, Izaki akataki motema mpe akufaki ; awumelaki na bomoi mibu ebele, akomaki mobange mpe alandaki bakoko na ye. Bana na ye ya mibali, Ezawu mpe Jakobi, bakundaki ye.
Jakobi apesaki bango malako oyo : « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti,
‹ nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo mpe bavandi na yango. › » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.
Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »
Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito mpe omemi biso na esika oyo ya pasi, esika oyo bakoki kutu kolona ata eloko moko te, esika oyo ezanga ata mbuma ya figi to ya vino to mpe ya grenade, esika oyo ezanga kutu ata mayi ya komela ? »
Mosala nyonso ya bato ya Gerishoni ekokambama na Aron mpe bana na ye ya mibali : ezala mpo na komema biloko to mpo na kosala mosala ; bokoyebisa bango mosala nyonso oyo bango basengeli kosala.
Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,
mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.
Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa ; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.