Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 20:20 - Mokanda na Bomoi

20 Azongiselaki bango lisusu : — Bokoki kolekela awa te. Boye, bato ya Edomi babimelaki bango na mampinga monene ya basoda mpo na kobundisa bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 20:20
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki : « Etikali moke tata na ngai akufa ; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. »


Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »


Ngai, nazali moto ya kimia ; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.


Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye : — Okoki kolekela na mokili na ngai te ; soki omeki, tokobimela bino mpe tokobundisa bino na mopanga.


Lokola Edomi eboyaki ete bana ya Isalaele balekela na etuka na yango, bana ya Isalaele bazwaki nzela mosusu.


Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye : ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi.


Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso ; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ