Mitango 20:19 - Mokanda na Bomoi19 Bana ya Isalaele bazongiselaki ye : — Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene mpe soki biso to bibwele na biso tomeli mayi na bino, tokofuta yango. Tolingi kaka eloko moko, eloko mosusu te : toleka kaka na makolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela ; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi.