Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »
Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo.
Nakolakisa bosantu ya Kombo monene na Ngai, oyo esambwaki kati na bikolo, Kombo oyo bobebisaki bosantu na yango kati na bikolo yango. Boye, bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, elobi Nkolo Yawe, tango nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na bino na miso na bango.
Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango.
pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.