Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 20:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ye mpe Aron basangisaki lisanga ya bato esika moko liboso ya libanga, mpe Moyize alobaki na bango : « Boyoka, bino batomboki, tokoki kobimisela bino mayi na libanga oyo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 20:10
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazongiselaki ye : — Biso mibale toloti bandoto ; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. Jozefi alobaki na bango : — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto ? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino.


Jozefi azongiselaki Faraon : — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.


abimisaki mayi wuta na libanga mpe asalaki ete etiola lokola mayi ya ebale.


Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele.


« Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, pamba te akokota te na mokili oyo napesi bana ya Isalaele, mpo ete bino mibale botombokelaki mitindo na Ngai na mayi ya Meriba.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina ; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.


Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.


Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.


Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ