29 Mpe bato ya libota ya Nefitali bakozala pembeni ya bato ya libota ya Aseri. Mokambi ya bato ya Nefitali ezali Akira, mwana mobali ya Enani.
Rasheli alobaki : « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. »
mpo na libota ya Nefitali : Akira, mwana mobali ya Enani. »
mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali.
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
Na mokolo ya zomi na mibale, Akira, mwana mobali ya Enani, mokambi ya libota ya Nefitali,
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Akira, mwana mobali ya Enani.