Mpe bato ya libota ya Benjame bakozala pembeni ya bato ya libota ya Manase. Mokambi ya bato ya libota ya Benjame ezali Abidani, mwana mobali ya Gideoni.
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Efrayimi ezali bato nkoto nkama moko na mwambe na nkama moko, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na molongo ya misato.
Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.