20 Bato ya libota ya Manase bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Efrayimi. Mokambi ya bato ya Manase ezali Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.
mpo na bana mibali ya Jozefi : mpo na libota ya Efrayimi : Elishama, mwana mobali ya Amiwudi ; mpo na libota ya Manase : Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri ;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.