Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 19:22 - Mokanda na Bomoi

22 Eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba ekokoma mbindo, mpe moto nyonso oyo asimbi eloko yango akokoma mbindo kino na pokwa. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 19:22
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso kati na biloko oyo ezali na se ya mobali yango, akozala mbindo kino na pokwa ; mpe moto nyonso oyo akolokota biloko yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo akosimba eloko oyo mwasi yango avandeli, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Soki eloko ezali na mbeto na ye to likolo ya eloko oyo avandeli, moto oyo akosimba yango akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi ; akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa.


Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.


soki asimbi nyama oyo etambolaka na libumu mpe ekomisaka mbindo to soki asimbi moto nyonso oyo akoki kokomisa ye mbindo ata na nzela ya ndenge nini.


Moto oyo akosimba eloko ya ndenge wana akozala mbindo kino na pokwa. Akoki kolia likabo ya bule te kino tango akosukola na mayi.


Soki moto asimbi na kozanga koyeba eloko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo to ebembe ya nyama ya mboka ya mbindo to ebembe ya nyama ya mbindo oyo etambolaka na libumu, moto yango akomi mbindo mpe amemi ngambo.


Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango.


Bongo soki mosuni yango etutani na eloko ya mbindo, esengeli batumba mosuni yango na moto. Kasi mpo na oyo etali mosuni ya mbeka ya boyokani, kaka moto oyo azali peto nde akoki kolia yango.


Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › »


Mosakoli Aje alobaki : — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo ? Banganga-Nzambe bazongisaki : — Iyo, ekokoma mbindo.


Sima na yango, Nganga-Nzambe akosukola na mayi bilamba mpe nzoto na ye liboso ete azonga na molako. Atako bongo, Nganga-Nzambe akozala mbindo kino na pokwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ