Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 19:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga ; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 19:20
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. »


Moto nyonso oyo akomekola mafuta yango mpe akosopa yango na nzoto ya moto oyo abulisami te, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. »


Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›


Kasi soki asukoli bilamba mpe nzoto na ye te, akomema ngambo. › »


Soki moko ya bakitani ya Aron azali na bokono na poso ya nzoto lokola maba, bokono ya kobima tofina to makila na nzoto ya mibali, akoki te kolia likabo ya bule kino tango akokoma peto. Ndenge moko mpe, akozala mbindo soki asimbi eloko oyo ekomi mbindo mpo ete etuti ebembe to mobali oyo abimisi mayi ya mibali ;


Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.


Soki amipetoli te sima na ye kosimba ebembe ya moto, abebisi bosantu ya Mongombo ya Yawe. Basengeli kolongola ye na Isalaele, pamba te basopeli ye te mayi ya bopetoli ; boye akozala kaka mbindo, mbindo na ye ekokangama ye na nzoto.


Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama ; akomema mikumba ya masumu na ye.


Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.


Yango wana, balingami na ngai, wana bozali kozela yango, bosala makasi mpo ete Nzambe akuta bino peto, bozangi pamela mpe bozali kati na kimia oyo apesaka.


Tika ete moto oyo asalaka mabe akoba kosala mabe, tika ete moto oyo azali mbindo akoba kozala mbindo, tika ete moto oyo azali sembo akoba kozala sembo, mpe tika ete moto azali bule akoba kozala bule ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ