2 « Tala malako ya mibeko ya Yawe : Bosenga na bana ya Isalaele ete bamema epai na bino ngombe ya mwasi ya motane ezanga mbeba to litono mpe etikala nanu te komema ekangiseli.
Maboko na Ye ekangi masumu na ngai ndenge bakangaka ekangiseli ; masumu yango emati ngai kino na kingo, mpe Nkolo asilisi makasi na ngai, akabi ngai na maboko ya bato oyo nazali na makoki ya kotelemela te.
Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.
Bongo akokamata ndeke ya mibale, ya bomoi, elongo na eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope ; akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo bawuti kokata kingo na likolo ya mayi ya peto ;
Nganga-Nzambe akokamata bakoni ya nzete ya sedele, ya izope, singa ya lino ya motane makasi, mpe akobwaka yango kati na moto oyo ezali kopela mpe ezali kozikisa ngombe ya mwasi.
Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.
mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te ;
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,
Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.
mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,
Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika ; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango.