Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 19:18 - Mokanda na Bomoi

18 Moto oyo azali mbindo te akokamata etape ya izope mpe akotia yango kati na mayi, bongo akosalela yango mpo na kobwaka mayi na ndako ya kapo epai wapi moto akufi, na bisalelo mpe na banzoto ya bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako yango ; akosala mpe bongo mpo na moto oyo asimbaki mikuwa, ebembe ya moto oyo moninga na ye moto abomaki to akufaki na liwa nyonso kaka to mpe mpo na moto oyo asimbaki kunda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 19:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


Petola ngai na nzela ya izope, mpe nakokoma peto ; sukola ngai, mpe nakokoma pembe koleka mvula ya pembe.


ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.


Mpo na kopetola moto oyo akomi mbindo, bakokamata putulu ya ngombe ya mwasi oyo batumbi na moto lokola mbeka mpo na masumu, bakotia yango na sani mpe bakosopela yango mayi ya etima.


Na mokolo ya misato mpe ya sambo, moto oyo azali mbindo te akobwakela moto ya mbindo. Bongo na mokolo ya sambo, akopetola ye. Moto oyo bapetoli akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi ; boye na pokwa, akokoma peto.


Moto ya peto akokamata putulu ya ngombe mpe akotia yango na libanda ya molako na esika ya peto epai wapi bana ya Isalaele bakobatela yango mpo na kobongisa mayi ya bopetolami ; ezali mbeka mpo na masumu.


Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.


Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.


Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,


nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi.


Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ