Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 19:16 - Mokanda na Bomoi

16 Moto nyonso oyo asimbi kati na bilanga ebembe ya moto oyo akufi mpo ete moninga na ye moto abomi ye to akufi na liwa nyonso kaka to mpe asimbi mikuwa ya moto to kunda, akozala mbindo mikolo sambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 19:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !


Sima na kopetolama na ye, akozela mikolo sambo.


Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye,


Moto nyonso oyo akosimba ebembe ya moto, ata mokufi yango azalaki nani, akozala mbindo mikolo sambo.


Sani nyonso ya kofungwama oyo ekozala na mofinuku te na likolo ekozala mbindo.


Moto nyonso kati na bino oyo abomaki moto to asimbaki ebembe, asengeli kozala libanda ya molako mikolo sambo. Boye, na mokolo ya misato mpe ya sambo, bosengeli komipetola, bino mpe bakangami na bino.


« Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe.


Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe ;


Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.


Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ