Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 19:15 - Mokanda na Bomoi

15 Sani nyonso ya kofungwama oyo ekozala na mofinuku te na likolo ekozala mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 19:15
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi ; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa ; sima na yango nde ekozonga lisusu peto.


Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango.


Bongo Nganga-Nzambe akopesa mitindo ya kobima na ndako yango liboso ete ye akota kuna mpo na kotala malamu litono yango. Bongo akoloba ete biloko nyonso kati na ndako yango ezali peto. Sima na yango, Nganga-Nzambe akokota kati na yango mpo na kotala malamu.


Tala mobeko oyo ebongi na kosalela soki moto akufi kati na ndako ya kapo : bato nyonso oyo bakokota na ndako ya kapo mpe ba-oyo bakomizalela na kati bakozala mbindo mikolo sambo.


Moto nyonso oyo asimbi kati na bilanga ebembe ya moto oyo akufi mpo ete moninga na ye moto abomi ye to akufi na liwa nyonso kaka to mpe asimbi mikuwa ya moto to kunda, akozala mbindo mikolo sambo.


Bokopetola mpe lisusu bilamba nyonso mpe biloko nyonso oyo basala na baposo ya banyama, na suki ya bantaba to mpe na banzete. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ