14 Tala mobeko oyo ebongi na kosalela soki moto akufi kati na ndako ya kapo : bato nyonso oyo bakokota na ndako ya kapo mpe ba-oyo bakomizalela na kati bakozala mbindo mikolo sambo.
Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ;
Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye,
Soki amipetoli te sima na ye kosimba ebembe ya moto, abebisi bosantu ya Mongombo ya Yawe. Basengeli kolongola ye na Isalaele, pamba te basopeli ye te mayi ya bopetoli ; boye akozala kaka mbindo, mbindo na ye ekokangama ye na nzoto.
« Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe.
Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.
Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron