Mitango 18:9 - Mokanda na Bomoi9 Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te : makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani ; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.
Akokata mwana meme yango kingo na esika oyo babomaka banyama oyo babonzi epai ya Nzambe lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu mpe lokola mbeka ya kotumba, kati na esika yango ya bule ; pamba te, ezala mbeka mpo na kozongisa boyokani to mbeka mpo na bolimbisi masumu, ezali ya Nganga-Nzambe : ezali eloko ya bule koleka.