Mitango 18:8 - Mokanda na Bomoi8 Bongo Yawe alobaki lisusu na Aron : « Ngai moko napesi yo mokumba ya kobatela makabo oyo babonzeli Ngai. Napesi na yo mpe na bana na yo ya mibali, lokola eteni na bino, makabo nyonso ya bule oyo bana ya Isalaele bapesi Ngai : ezali mobeko ya libela na libela. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te : makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani ; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo.
Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.
Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.