Mitango 18:7 - Mokanda na Bomoi7 Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.
Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.
Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »