Mitango 18:5 - Mokanda na Bomoi5 Bino nde bokozala na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpe etumbelo, mpo ete kanda makasi ekweya lisusu likolo ya Isalaele te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.
Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto.
Kati na bato nyonso ya Isalaele, napesi Balevi lokola likabo epai ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali, mpo ete basala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na bolamu ya bana ya Isalaele mpe basala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, mpo ete likama moko te ekomela bana ya Isalaele tango bakopusana pene ya Esika ya bule. »