Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 18:32 - Mokanda na Bomoi

32 Na nzela ya kopesa eteni wana oyo eleki kitoko, bokozala na ngambo te na likambo wana, bokobebisa te bosantu ya makabo ya bana ya Isalaele mpe bokokufa te. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 18:32
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te. Ezali mobeko ya libela mpo na Aron mpe bakitani na ye.


Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye.


« Talisa Aron mpe bana na ye ya mibali ndenge nini basengeli kozala mosika ya makabo oyo bana ya Isalaele babonzelaka Ngai, mpo ete babebisa te bosantu ya Kombo na Ngai ya bule ; Ngai nazali Yawe.


Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo ? › Ezali tango bolobaka : ‹ Mesa ya Yawe ezali na tina te. ›


Kobanda sik’oyo, bana ya Isalaele basengeli lisusu te kopusana pene ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bakomema mokumba ya masumu na bango mpe bakokufa.


Bino elongo na mabota na bino, bokolia yango na bisika nyonso, pamba te yango ezali lifuti na bino mpo na mosala na bino kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Yango wana, moto nyonso oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na lolenge oyo ebongi te, akomema ngambo epai ya nzoto mpe makila ya Nkolo.


Pamba te moto oyo azali kolia lipa mpe komela, na kozanga kososola ete ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na kolia mpe komela bongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ