Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Kobanda sik’oyo, bana ya Isalaele basengeli lisusu te kopusana pene ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bakomema mokumba ya masumu na bango mpe bakokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 18:22
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te. Ezali mobeko ya libela mpo na Aron mpe bakitani na ye.


Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi ya ndeko ya tata na ye to mwasi ya ndeko ya mama na ye, asambwisi ndeko ya tata na ye to ya mama na ye ; bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango mpe bakokufa bazanga bana.


Banganga-Nzambe bakotosa malako na Ngai tango nyonso mpo ete bamema ngambo te mpe bakufa te, noki te bakokufa solo. Ngai nazali Yawe oyo abulisaki bango mpe akomisaka bango basantu mpo na mosala na Ngai.


Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. »


Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »


Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ