Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 18:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango bakokokisa sanza moko, osengeli kosikola bango na motuya ya mbongo ya bibende mitano ya palata, oyo moko na moko kati na yango ezali ya bagrame zomi, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 18:16
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo : bagrame motoba ya palata.


Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola.


Mbongo moko ya ebende ya palata ekokani na bagrame zomi na mibale, mpe mine moko ekokani na mbongo ya bibende ya palata, tuku motoba.


Mituya nyonso ekokatama ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.


Mpe lisusu, bana liboso nyonso, ezala ya bato to ya banyama oyo bakomema epai na Yawe bakozala mpo na yo. Kasi osengeli kosikola mwana mobali nyonso ya liboso ya moto to ya nyama ya mbindo.


Kasi osengeli te kosikola mwana liboso ya ngombe, ya meme to ya ntaba, pamba te ezali bule. Okosopa makila na yango na etumbelo mpe okotumba mafuta na yango lokola likabo bazikisa na moto, likabo ya solo kitoko mpo na Yawe.


Mpo na kosikola bana ya liboso ya Isalaele nkama mibale na tuku sambo na misato oyo baleki na motango ya Balevi,


okokongola mbongo ya bibende, nkama mitano, kolanda ndenge batangaka mbongo kati na Esika ya bule, mpo na moto moko na moko. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ