Mitango 18:1 - Mokanda na Bomoi1 Yawe alobaki na Aron : « Yo elongo na bana na yo ya mibali mpe libota na yo bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema mpo na kobebisa bosantu ya Esika ya bule ; mpe lisusu yo kaka elongo na bana na yo ya mibali nde bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema na mosala ya bonganga-Nzambe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala lisusu biloko oyo ekozala mpo na yo : biloko nyonso oyo bakobonza kati na makabo oyo ekowuta na maboko ya bana ya Isalaele. Napesi yango epai na yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola mobeko ya libela na libela. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto akoki kolia yango.