Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.
Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »
Wana lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki koloba ete baboma bango na mabanga, nkembo ya Yawe emonanaki na Ndako ya kapo ya Bokutani na miso ya bato nyonso ya Isalaele.
Boye, Nganga-Nzambe Eleazari alokotaki bambabola nyonso ya bronze oyo bato oyo bazikaki na moto bamemaki, mpe atutaki yango na marto mpo na kotia yango likolo ya etumbelo ;
Yeisa pene na yo bandeko na yo ya mibali, Balevi, bato ya libota ya koko na yo, mpo ete basunga yo tango yo elongo na bana na yo ya mibali bokosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya Ndako ya kapo ya Litatoli.
Na mokolo oyo batelemisaki Mongombo, lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Litatoli. Wuta na pokwa kino na tongo, lipata oyo ezalaki likolo ya Mongombo ezalaki komonana lokola moto.