Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 17:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Loba na Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, ete balongola bambabola oyo batumbelaka malasi na kati-kati ya moto, mpe bapanza makala ya moto mosika, pamba te bambabola wana ezali bule.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 17:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


Bapesaki na Banganga-Nzambe oyo bakombo na bango ekomamaki kolanda mabota na bango ya botata mpe na Balevi oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda mibu tuku mibale mpe komata, kolanda mikumba mpe masanga na bango ;


Wuta na Siona, Yawe akosala ete nguya na yo ya bokonzi ekende mosika, mpe okokonza kati na banguna na Yo.


Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo, mpo ete basangana te na mabe.


Okosalela mafuta yango mpo na kopakola Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli,


Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango.


Yawe atunaki ye : — Ozali na nini na loboko na yo ? Moyize azongisaki : — Nazali na lingenda.


Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango mpe etumbi mbuma na yango ; ata etape moko te ya makasi etikalaki mpo na kosala lingenda ya bokonzi. › Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. »


Boye, bato nyonso bakososola ete Ngai Yawe nde nabimisi mopanga na Ngai wuta na ebombelo na yango, mpe ekozonga lisusu te. ›


Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka ! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.


Tika ete bakamata bambabola yango, atako ezali ya bato oyo bakufaki likolo ya masumu na bango ; mpe tika ete batuta yango na marto mpo ete ekoma papala mpe batia yango likolo ya etumbelo, pamba te bamemaki yango liboso ya Yawe mpe ekomaki bule. Tika ete yango ekoma elembo mpo na bana ya Isalaele. »


Na mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ