Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 17:13 - Mokanda na Bomoi

13 Atelemaki na kati-kati ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe oyo bazalaki ya kokufa mpe etumbu esilaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 17:13
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. »


Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.


Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi ; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. »


Kanda na Yo elembisaka biso nzoto, mpe kanda makasi na Yo epesaka biso bobangi.


Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.


Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! »


Yawe alobaki na Aron : « Yo elongo na bana na yo ya mibali mpe libota na yo bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema mpo na kobebisa bosantu ya Esika ya bule ; mpe lisusu yo kaka elongo na bana na yo ya mibali nde bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema na mosala ya bonganga-Nzambe.


alandaki moto ya Isalaele wana kino kati na ndako na ye ya kapo mpe atobolaki bango mibale mabumu mpe bakufaki, ezala moto ya Isalaele wana mpe mwasi wana. Mpe etumbu oyo ezalaki likolo ya Isalaele esilaki.


Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.


Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo.


Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto.


Tango bato ya suka kati na bato oyo bazalaki kobunda bitumba basilaki kokufa,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ