Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 17:11 - Mokanda na Bomoi

11 Moyize alobaki na Aron : « Kamata mbabola na yo mpe tia malasi ya ansa kati na yango elongo na moto ya etumbelo. Bongo, kima mbangu kati na lisanga mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, pamba te kanda makasi ebimi liboso ya Yawe, etumbu ezali koya. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 17:11
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango nyonso likambo ekowuta epai na bandeko na bino oyo bavandaka na engumba mpe ekokoma liboso na bino, ezala ya koboma to ya kobuka mibeko, mitindo, bikateli to malako, bosengeli kokebisa bango ete basala masumu te liboso ya Yawe ; soki te, kanda na Ye ekokweyela bino mpe bandeko na bino. Bosala bongo mpe bokozala na pamela te.


Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali : akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu.


Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.


Kasi, wana misuni ezalaki nanu kati na minoko na bango mpe basilisaki nanu kotafuna yango te, kanda ya Yawe epelaki mpo na bango mpe apesaki bango etumbu ya makasi.


« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ