Mitango 16:9 - Mokanda na Bomoi9 Ekoki na bino te ete Nzambe ya Isalaele atia bino pembeni kati na lisanga ya Isalaele mpe abenda bino pembeni na Ye mpo na kosala mosala na Mongombo ya Yawe mpe kotelema liboso ya lisanga mpo na kosalela bango ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Alobaki na Balevi oyo babulisamaki mpo na Yawe mpe bazalaki na mokumba ya koteya Isalaele mobimba : — Botia Sanduku ya bule kati na Tempelo oyo Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, atongaki ; ezali lisusu ya komema na mapeka na bino te. Sik’oyo, bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpe Isalaele, bato na Ye.
Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,