Mitango 16:33 - Mokanda na Bomoi33 Bakitaki ya bomoi kati na mokili ya bakufi elongo na biloko na bango nyonso, mabele ezipaki bango mpe bakufaki ndenge wana. Mpe balimwaki kati na lisanga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata ; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa.
Bakambi nyonso ya etuka ya nor mpe bato nyonso ya Sidoni bazali kuna ; bakitaki na soni elongo na bato oyo bakufaki atako nguya na bango ezalaki kopesa bato somo makasi ; balali lokola bato bakatama ngenga te elongo na bato oyo bakufaki na mopanga, mpe bakufaki na soni makasi elongo na bato oyo bakitaka na libulu.