Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.
Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !
Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !
Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?
Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ; Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te. Kasi yo Edomi, mboka kitoko, Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo, mpe akobimisa masumu na yo na polele.