Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.
Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.
Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.
Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko ! Sakola mabe na tina na bango
— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »
Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.
Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »