Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 16:27 - Mokanda na Bomoi

27 Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 16:27
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene ; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?


Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema : moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe !


Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita ; ezalaki : Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ