Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 16:26 - Mokanda na Bomoi

26 Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 16:26
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama !


Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !


Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.


Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami ; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye.


Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino.


Na bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana, mpe bakendeki na Ikoniomi.


Kasi Petelo azongiselaki ye : — Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa !


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te.


Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.


Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ