Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 16:21 - Mokanda na Bomoi

21 — Bokabwana na lisanga ya bato oyo mpo ete nalingi kosilisa bango kaka na mbala moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 16:21
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete tolingi kobebisa yango. Sango ya makambo mabe ya bato oyo ekomi kino epai na Yawe ; yango wana Yawe atindi biso mpo na kobebisa engumba oyo.


Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki.


Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango !


Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene.


Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo.


Bongo Yawe alobaki na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Bozali batomboki ; soki natamboli elongo na bino ata mpo na tango moke, nakosilisa koboma bino. Bolongola biloko na bino ya monzele, mpe nakoyebisa bino makambo oyo nakosala bino. »


Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Makonga na bango ezangaka koboma moto te, bongo bango nyonso bazali bilombe ya bitumba.


Nakokweyisa bango na nzela ya etumbu ya bokono oyo ebomaka mpo na kobebisa bango. Kasi yo, nakokomisa yo ekolo moko monene mpe ya nguya koleka bango.


Na bongo, soki obomi bato oyo nyonso na mbala moko, bikolo oyo eyokaki sango oyo mpo na Yo ekoloba :


« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ