18 Moto na moto akamataki mbabola na ye, atiaki moto mpe malasi ya ansa kati na yango ; bongo atelemaki esika moko na Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi.
akotondisa mbabola ya kotumba malasi na makala ya moto oyo ewuti na etumbelo liboso ya Yawe mpe akotondisa maboko na ye mibale na malasi ya putulu, bongo akomema yango na sima ya rido.
Moko na moko akokamata mbabola na ye, oyo batumbelaka malasi, bongo akotia malasi ya ansa kati na yango mpe akomema yango liboso ya Yawe. Bambabola nyonso ekozala nkama mibale na tuku mitano ; yo mpe elongo na Aron bokomema bambabola na bino.
Tango Kore asangisaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, nkembo ya Yawe ebimelaki lisanga mobimba,