Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 16:16 - Mokanda na Bomoi

16 Moyize alobaki na Kore : — Lobi, yo mpe bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokotelema elongo na Aron liboso ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 16:16
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Moyize alobaki na Aron : — Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango.


Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami : — Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bango nyonso misato bakendeki.


Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.


Moko na moko akokamata mbabola na ye, oyo batumbelaka malasi, bongo akotia malasi ya ansa kati na yango mpe akomema yango liboso ya Yawe. Bambabola nyonso ekozala nkama mibale na tuku mitano ; yo mpe elongo na Aron bokomema bambabola na bino.


Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba ; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.


Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.


Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ