15 Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.
Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.
Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.
Kasi ngai, nasaleli makoki na ngai ata moke te, mpe ezali te mpo na kosenga yango nde nakomeli bino mokanda oyo ; pamba te nakosepela kutu kokufa na esika ete moto mosusu abebisa tina ya lokumu na ngai.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
Bino moko bozali batatoli, Nzambe mpe azali Motatoli, ete totambolaki na bosantu, na bosembo mpe na kozanga pamela, na miso na bino oyo bozali kondima.