Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 16:13 - Mokanda na Bomoi

13 Ekoki kaka te mpo na yo kobimisa biso na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpo na koya kobomisa biso kati na esobe ? Sik’oyo olingi lisusu kokoma mokonzi na biso ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 16:13
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.


Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »


Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !


Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki : — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ?


Moto wana azongisaki : — Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito ? Moyize abangaki mpe amilobelaki : « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. »


Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.


Boni, ekoki te mpo na bino kolia na matiti ya kitoko ? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino enyataka-nyataka matiti oyo etikali ? Ekoki te mpo na bino komela mayi ya peto ? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino ekomisa potopoto mayi oyo etikali ?


Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › »


Mokolo moko, bato ya bikolo mosusu oyo bazalaki elongo na bana ya Isalaele bakomaki na posa makasi ya kolia misuni. Bongo bana ya Isalaele bakomaki lisusu kolelalela mpe koloba : « Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ?


Tokanisi lisusu bambisi, bandunda ya ndenge na ndenge, pasiteki, bandembi, matungulu, ayi oyo tozalaki kolia ya ofele na Ejipito.


Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango.


Bato nyonso ya Isalaele bakomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron, mpe lisanga mobimba ekomaki koloba : « Ah, elingaki kozala malamu soki tomikufelaki na biso na Ejipito to na esobe !


Boni, Yawe amemi biso na mokili oyo kaka mpo ete tokufa na mopanga ? Boye basi mpe bana na biso bakokoma kaka bomengo ya bitumba. Ekozala malamu te mpo na biso ete tozonga na biso na Ejipito ? »


Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki : — Tokoya te !


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki na koloba na ye : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi, » ye nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ