Yawe alobaki na Aron : « Yo elongo na bana na yo ya mibali mpe libota na yo bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema mpo na kobebisa bosantu ya Esika ya bule ; mpe lisusu yo kaka elongo na bana na yo ya mibali nde bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema na mosala ya bonganga-Nzambe.
Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. »
Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »