Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 15:9 - Mokanda na Bomoi

9 bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 15:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Orinani azongiselaki Davidi : — Kamata yango ; mpe tika ete mokonzi, nkolo na ngai, asala na yango nyonso oyo amoni ete ezali malamu mpo na ye. Tala, ngai, nakopesa bangombe ya mibali lokola mbeka ya kotumba, banzete oyo babetelaka ble lokola koni, mpe ble lokola mbeka ya bambuma. Nakopesa nyonso wana.


Tozwi lisusu mokano ya kotosa mibeko, ya kopesa bagrame minei ya mbongo ya bibende ya palata mobu na mobu, mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na biso,


Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.


Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali ; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma.


Tongo nyonso, okobanda kobonza mwana meme, makabo ya bambuma mpe mafuta lokola mbeka ya kotumba ya tango nyonso.


Akopesa lokola mbeka ya bambuma bakilo zomi na mitano ya bambuma mpo na meme moko ya mobali ; bongo, akopesa likabo oyo loboko na ye ekokoka mpo na bana meme ; likabo ya mafuta ekozala balitele misato na ndambo mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.


Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali ; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.


Makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.


Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ?


Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.


Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani


Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga : ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Soki bobongisi mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokisa ndayi to mbeka ya boyokani mpo na Yawe ;


Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ;


Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala : balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali.


Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ