Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.
Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Ndenge moko mpe, soki moto alingi kobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani oyo azwi kati na bangombe, bameme to bantaba, mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, nyama yango esengeli kozala ezanga mbeba.
Bana mibali ya Aron bakotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.
Bakokamata mwana ngombe ya mobali elongo na likabo na yango ya farine oyo basangisa na mafuta ; mpe okokamata mwana ngombe mosusu ya mobali mpo na mbeka ya masumu.