Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.
Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita ; ezalaki : Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti.
Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.