Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 15:4 - Mokanda na Bomoi

4 Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 15:4
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, okosala keba ete osomba bangombe, bameme ya mibali mpe bana meme elongo na nyonso oyo esengeli mpo na makabo na yango ya gato mpe ya masanga, mpe okobonza yango na etumbelo ya Nzambe na bino kati na Yelusalemi.


Mpo na mwana meme ya liboso, okopesa bakilo misato ya farine basangisa na litele moko na kati-kati ya litele ya mafuta, mpe okosopa litele moko na kati-kati ya litele ya vino lokola mbeka ya masanga.


Bakomema bandeko na bino nyonso wuta na bikolo nyonso, lokola likabo epai na Yawe, na ngomba na Ngai ya bule, na Yelusalemi, na likolo ya bampunda, ya bashar mpe ya bashareti oyo ekangama, ya mikongo ya bamile mpe ya bashamo, » elobi Yawe. « Bakomema bango ndenge bana ya Isalaele bamemaka makabo na bango ya bambuma, kati na basani ya bule, na Tempelo ya Yawe.


Tongo nyonso, okobanda kobakisa na likolo na yango lokola likabo ya bambuma bakilo mibale na bagrame nkama mitano ya farine oyo bakosangisa na litele moko ya mafuta ya kitoko. Ezali likabo mpo na Yawe ; mpe ezali mibeko ya libela na libela mpo na bambeka ya tango nyonso.


akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.


Soki moto alingi komema makabo ya mbuma epai na Yawe, makabo yango ekozala ya farine. Bongo na likolo na yango, akosopa mafuta mpe akotia ansa.


Okosopela yango mafuta mpe ansa. Ezali likabo ya bambuma.


Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga.


Soki azali nde kobonza mwana meme lokola mbeka, akomema yango liboso ya Yawe.


Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ;


Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa ;


Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Likabo na ye ezalaki : etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo ;


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.


Nzete ya Olive ezongiselaki yango : ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ