32 Wana bana ya Isalaele bazalaki kati na esobe, bamonaki moto moko kolokota bakoni na mokolo ya Saba.
Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »
Tala liloba oyo Yawe alobi : Bosala keba ete moko te kati na bino amema mikumba na mokolo ya Saba to alekisa yango na bikuke ya Yelusalemi ;
Bato oyo bamonaki ye kolokota bakoni bamemaki ye epai ya Moyize, Aron mpe lisanga mobimba.