Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 15:3 - Mokanda na Bomoi

3 bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 15:3
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Boye, okosala keba ete osomba bangombe, bameme ya mibali mpe bana meme elongo na nyonso oyo esengeli mpo na makabo na yango ya gato mpe ya masanga, mpe okobonza yango na etumbelo ya Nzambe na bino kati na Yelusalemi.


Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.


Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo ; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Mpo na mwana meme ya mibale, okobonza yango na pokwa elongo na lolenge moko ya makabo oyo obonzaki na tongo : farine, mafuta mpe mbeka ya masanga ya vino ; okobonza yango lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Bokolia yango na Esika ya bule, pamba te yango nde epesameli yo mpe bana mibali na yo kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, ndenge kaka atindaki ngai.


« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.


Soki abonzi mbeka na ye ya boyokani mpo ete apesaki elaka, na kolapa ndayi to wuta na mokano ya motema na ye moko, mbeka esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango. Kasi soki ndambo etikali, ekoliama na mokolo oyo ekolanda.


Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana meme sambo ya mibali ya mobu moko.


Bokobonzela Yawe mbeka ya kotumba, lokola biloko ya solo kitoko : mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.


kitunga ya mapa ezanga levire mpe basala na farine basangisa na mafuta ; bagalete ezanga levire mpe bapakola mafuta elongo na mbeka ya masanga mpe makabo mosusu.


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Pamba te, mpo na Nzambe, tozali solo kitoko ya Klisto kati na bato oyo bazali na nzela ya lobiko mpe kati na ba-oyo bazali kobunga.


Mpo na bamoko, tozali solo ya kufa, oyo ezali komema bango na kufa ; mpe mpo na bamosusu, tozali solo ya bomoi, oyo ezali komema bango na bomoi. Boye nani azali na makoki mpo na mosala ya lolenge oyo ?


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge.


Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino.


Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ