Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 15:27 - Mokanda na Bomoi

27 Kasi soki esalemi ete moto moko nde asali lisumu na nko te, asengeli komema mwana ntaba ya mwasi ya mobu moko lokola mbeka mpo na masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 15:27
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki moto asali masumu to likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe, tala ndenge bokosala :


epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe : mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba ; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu ; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ;


Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi ; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye : na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi ; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.


Nzokande, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, kasi azali sik’oyo kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema.


Sik’oyo bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo na kozanga boyebi, ndenge bakonzi na bino basalaki.


atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola Ye mpe nazalaki moto na kanza ; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo oyo nazalaki kosala mpe nazalaki na kondima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ